Réveil FM, la première radio libre et citoyenne de Kinshasa en République démocratique du Congo !

Mot-clé - bana BILAKA

Fil des billets Fil des commentaires

mardi 7 juin 2022

BANA ELONGA : KOKO LALA MANTENDI VITA RÉPOND À RÉVEIL FM INTERNATIONAL !

BANA ELONGA:  Koko Lala Mantendi Vita  répond à Réveil FM International !

Freddy Mulongo Mukena, Réveil FM International 

IMG_20220607_141955.jpg, juin 2022

Dans une sagesse d'un gardien de temple historique, Koko Lala Mantendi Vita s'est prêté à l'interview pour répondre à nos questions.

Alors que les POLITICAILLEURS, BANA BITINDA YA BA DÉCIDEURS, MINDELE NDOMBE sont tous à l'aéroport de Ndjili, pour accueillir Philippe, roi des belges, Aïeul de Léopold II, Caoutchouc 1er et roi des mains coupées au KONGO...Dans cette interview Koko Lala Mantendi Vita nous enseigne mais surtout il nous fait voir la place de MFUMU TATA KIMBANGU DIATUNGUNUA dans nos vies et la Libération du KONGO. 

Réveil FM International :  IL FAUT KOZALA MWANA ELONGA PO O KOMA MWANA BILAKA, OU BIEN C'EST LE CONTRAIRE ? 

BOKESENI NINI E ZALI KATI YA « BANA ELONGA  » NA « BANA BILAKA  » ?

KOKO LALA MANTENDI VITA : Na molongo ya solo, e pesami na Mwana MAMA KONGO nionso - oyo a lingi - a koma nanu Mwana Bilaka. Na sima nde, soki a sali lisusu makasi, a koki kokoma Mwana Elonga.

Mwana Bilaka a zali Mwana MAMA KONGO oyo a sutuka na pongi pe a landa Mwinda ya BA KOKO na ye. A bima na Zamba pe a tombola DALAPO « KIMBANGU DIANTUNGUNUA », a tombola MWINDA « KIMBANGU DIANTUNGUNUA », pe a simba LIKONGA « KIMBANGU DIANTUNGUNUA ». A tambolaka elongo na BA KOKO  na ye, pe a koki komipesa biyano na mituna ya kafu-kafu ya bomoyi na ye : 

Na wuta wapi ? Na zali nani ? Na zali kosala nini, pe po na nini ? Na kokende wapi, sima ya liwa ya nzoto na ngayi ?

Mwana Elonga a zali nanu Mwana Bilaka. Pamba te, ye pe a simbami na mibeko misatu ya Mwana Bilaka. Ye pe a tambolaka elongo na BA KOKO  na ye, pe a yanola na mituna ya kafu-kafu ya bomoyi na ye. Kasi, ye, a zuwa mokano ete a koki lisusu koyokisa BA KOKO na ye soni te liboso ya TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA. 

Réveil FM International :   BA POLITICIENS YA MBOKA NA BISO BA PESA KOMBO MAKASI, « BA DÉCIDEURS », NA BATU OYO BA PESAKA BANGO MITINDO. NA BONGO, BA MIYEBI ETE BA ZALAKA « BANA  YA MISALA YA BA DÉCIDEURS ». LELO, TO YEBI ETE KONGO E ZALI « CHAMBRE À COUCHER » YA MFUMU TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA. KASI, BONI BONI BAPAYA BA KOMA « BA DÉCIDEURS » NA MABELE YA TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA ?

KOKO LALA MANTENDI VITA: To yebi malamu ete, bayindo nionso, to bungaka nzela kobanda libatisi ya NTOTILA NZINGA NKUVU na 1491 na bonzambe ya bapaya. Kobanda Bonzambe ya bapaya e kotaka na mabele na biso, molili makasi nde e kotaka na mabele ya KONGO  DIA NTOTILA. Ba ndandanu (génération) e lekani ya mingi. Pe Bonkoko (Bonzambe) oyo BA KOKO  na biso ya yambo ba salelaka na bosolo, e sangana na bondoki oyo bapaya ba memaka na mabele na biso. Tala esika buluyeke e kota na milimo ya bayindo. 

NZAMBE MPUNGU, TATA MOKELI ya biso bayindo, a tindaka MOBIKISI  KIMBANGU DIANTUNGUNUA po na kobimisa biso na bowumbu ya Molimo wana. Ye MWINDA na biso, pe KITALATALA na biso. Na yango, po na Mwana MAMA KONGO a tambola na molili te, e sengeli a landa MWINDA. Po, a tambola na bosoto te, e sengelil a lekisa boyebi na ye nionso liboso ya KITALATALA. 

Nzoka, na ba politiciens na biso, mutu na mutu a lukaka nzela na lolenge na ye : Ba boya koluka MWINDA, pe ba pona kosalela mayele ya molili ya « ba décideurs na bango ». Mawa nde po mitindo oyo nionso bango ba zuwaka epayi ya « ba décideurs », e zalaka kaka ya pasi pe kufa ya bayindo.

Réveil FM International :  KATI YA « SIMON KIMBANGU » NA « KIMBANGU DIANTUNGUNUA », NANI MUKOLO, NANI LEKI ? BANGO MIBALE BA ZALI BA NDEKO ?

KOKO LALA MANTENDI VITA : Kombo ya « KIMBANGU DIANTUNGUNUA » e tangamaka mbala ya liboso epayi ya Prophétesse KIMPA VITA Isipa Ndona mokolo ya 02 juillet 1706. Na mbotama ya MOBIKISI  na biso, mokolo ya 24 septembre 1889, Tata na ye na Mama na ye ba tosaka manaka ya MAMA KIMPA VITA, pe ba pesaka ye kombo ya KIMBANGU  DIANTUNGUNUA. Sima, na bomwana na ye, bapaya ba bambaka ye kombo ya « Simon » na makasi. E zali lolenge ba zalaka kosala na bayindo nionso na eleko ya colonisation (1885 – 1960). 

Na nzoto boye, TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA to Monsieur Simon KIMBANGU ba zali mutu moko. Kasi, lokola TATA ye moko a tikalaka kolata kombo ya “Simon” te, biso Bana Bilaka / Bana Elonga to koki kobenga ye “Simon” te ! Pour prevue, tangu nionso bapaya ba zalaka kotuna identité na ye, a zalaka koyanola na polele : « MUNU, KIMBANGU  DIANTUNGUNUA, NTUMWA  WA TATA NZAMBI  MPUNGU ». Na Lingala : « NGAYI, KIMBANGU  DIANTUNGUNUA, MOTINDAMI YA TATA NZAMBE MPUNGU  ».

Réveil FM International :  KINTUADI KIA BA NDOMBE E ZALI NINI ? E KOSALEMA NDENGE NINI ? E KOSALAMA NA BA NINI ?

KOKO LALA MANTENDI VITA: KINTUADI KIA BA NDOMBE e zali Bonkoko (Bonzambe) ya biso bayindo (nionso ya Mokili). E pesama na NZAMBE na biso, MPUNGU, po kofanda (façon d’être) pe kotambola (façon de faire) na biso Bana  na Ye na kati ya Mokili. E zali lolenge oyo BA KOKO  na biso ya yambo ba fandaka pe ba tambolaka na NZAMBE MPUNGU, kobanda kosalama ya Mokili. Mokili  na biso e zalaka kotambola na Bonzambe na biso, tangu nionso oyo bapaya ba kotelaka nanu biso te.

E salamaka na nzela ya MALOBA. MALOBA oyo BA KOKO  na biso ba tikelaka biso. E komeli biso lelo na nzela ya MIBIKISI na biso : 

1. TATA KIMBANGU DIANTUNGUNUA

2. TATA MPADI  BUKA  MAKENGO  NSUKA

3. TATA MULUNDU  MAKIES KIESE Y'AFRIKA

Yango nde “BILEYI” oyo, biso Bana Bilaka na Bana Elonga, to zali koliya na nzela ya MPAKA MATIKI Mwana Talwanga. Yango nde to zali kotanda na mesa po na Mwana MAMA KONGO nionso oyo a zali na nzala ya Bosolo.

Lire la suite...

Partager sur : Partager